8 Tango bato mabe bakolaka lokola matiti, mpe bato nyonso ya misala mabe bafulukaka, ezalaka nde mpo ete babebisama libela.
Kasi tika ete Yawe abengana bato ya kilikili elongo na bato ya misala mabe ! Tika ete kimia ezala na Isalaele !
pamba te bakokawuka noki lokola makasa, mpe bakolemba noki lokola matiti.
Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te bato bazali kotungisa ngai. Babundisaka mpe banyokolaka ngai mikolo nyonso.
kino nakendeki na Esika ya bule ya Nzambe mpe nasosolaki ndenge nini bakosuka.
Solo, otielaka bango biloko ya moselu, okweyisaka bango kati na libebi.
Tika ete soni mpe somo makasi elata bango mpo na libela ! Tika ete bakufa na soni !
Yawe azali monene makasi, na bisika ya likolo ; aleki lokito ya mayi minene, mpe bambonge milayi ya ebale monene.
Nandimi sik’oyo ete Yawe azali monene koleka banzambe nyonso, pamba te asali makambo ya lolenge oyo epai ya banyokoli ya Isalaele.
Biloko oyo mabele ebotaka ezali mpo na bolamu ya bato nyonso ; ezala mokonzi, abikaka mpe na mbuma ya bilanga.
Na tango yango, mokonzi Erode akangaki ndambo ya bandimi ya Lingomba mpo na konyokola bango.