7 Moto ya kilikili ayebaka te, mpe zoba asosolaka eloko moko te.
Bandako ya bato ya mobulu ezalaka na kimia, mpe bato oyo batombokelaka Nzambe, oyo bamonaka makasi na bango lokola Nzambe, bango nde babatelamaka.
Kasi batomboki bakobebisama, tango oyo ezali koya ezali te mpo na bato mabe.
Tala ndenge bato mabe bazalaka : tango nyonso, bazalaka na mitungisi te, mpe bomengo na bango emataka se komata.
nasilaki mayele, nakomaki lokola zoba, nakomaki lokola nyama liboso na Yo.
Bazali komilakisa, bazali kobimisa mafinga ; bato nyonso ya misala mabe bazali komikumisa !
Pamba te kotomboka ya bato oyo bazangi mayele ekoboma bango, mpe bozangi bokebi ya bato oyo bazangi mayele ekoboma kaka bango moko ;
Bato na yango bazangi makasi, balengi na somo mpe bakomi na soni, bakomi lokola matiti ya bilanga, lokola matiti ya langi ya mayi ya pondu, lokola matiti oyo ebotaka na mitondo ya bandako, ekawuka liboso ete ekola.
Tosengeli sik’oyo komona bato ya lofundu lokola bato ya esengo, bato mabe bazali kokende liboso. Atako bazali kobeta tembe na Nzambe, kasi bazali kaka kolonga. › »
Pamba te ekomama : « Bato nyonso bazalaka lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezalaka lokola bafololo ya bilanga. Matiti ekawukaka mpe fololo na yango ekweyaka,