Na lisungi ya bakonzi ya mampinga, Davidi atiaki pembeni ndambo ya bana mibali ya Azafi, ya Emani mpe ya Yedutuni mpo na kosala mosala ya kosakola mpe ya kosalela banzenze, mandanda mpe manzanza. Tala bakombo ya bato oyo basalaki mosala yango :
Nakotatola boboto ya Yawe, nakosanzola Ye mpo na misala na Ye, kolanda nyonso oyo Yawe asalaki mpo na biso ; solo, asalelaki libota ya Isalaele makambo ebele ya kitoko kolanda boboto mpe bolingo na Ye ya monene.