Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 92:13 - Mokanda na Bomoi

13 Bato ya sembo bafulukaka lokola nzete ya mbila, bakolaka lokola nzete ya sedele ya Libani.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 92:13
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Asalaki lopango ya Banganga-Nzambe mpe lopango monene. Asalaki bikuke ya lopango mpe alatisaki yango bronze.


Maridoshe akomaki moto monene kati na ndako ya mokonzi : lokumu na ye epanzanaki kati na bituka nyonso, pamba te nguya na ye ezalaki komata se komata, mokolo na mokolo.


Bokota na bikuke na Ye na kozongisa matondi, bokota na lopango na Ye na kokumisa. Bosanzola Ye, bopambola Kombo na Ye.


kati na lopango ya Tempelo ya Yawe ; kati na yo, Yelusalemi. Bokumisa Yawe !


oyo botelemaka kati na Ndako ya Yawe, kati na lopango ya Ndako ya Nzambe na biso !


Bibebu na yo ezali kobimisa mafuta ya elengi, mwasi na ngai ya motema ; se ya lolemo na yo etondi na mafuta ya nzoyi mpe na miliki, mpe solo ya bilamba na yo ezali lokola solo ya Libani.


Makolo na ye ezali lokola makonzi ya mabanga ya marbre oyo evandi likolo ya moboko ya wolo ya peto. Azali lokola bangomba ya Libani, kitoko lokola banzete ya sedele ya Libani.


Solo, bato na yo nyonso bakokoma bato ya sembo mpe bakozwa mokili lokola libula mpo na libela ; bazali mwa nzete moke oyo nalonaki, mosala ya maboko na Ngai, mpo na komonisa nkembo na Ngai.


komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga mitole na esika ya putulu, mafuta ya esengo na esika ya matanga, mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami. Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe, mpo na komonisa nkembo na Ye.


Nakobikisa bango na mabe na bango mpe nakolinga bango na motema moko, pamba te kanda na Ngai elongwe kati na bango.


Kasi soki bitape mosusu ekatamaki ; soki yo, etape ya nzete ya olive ya zamba, bakangisaki yo kati na bitape oyo etikalaki ; soki sik’oyo okomi komela, elongo na bitape yango, mayi moko oyo ezali komata wuta na mosisa ya nzete ya olive,


Pamba te soki tosanganaki elongo na Ye kati na kufa na Ye, solo tokosangana mpe elongo na Ye kati na lisekwa na Ye.


mpo ete Klisto avanda kati na mitema na bino na nzela ya kondima. Nabondelaka mpe mpo ete bozwa misisa mpe bolenda kati na bolingo,


kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ