Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 92:12 - Mokanda na Bomoi

12 Miso na ngai ekomi komona bayini na ngai, mpe matoyi na ngai ekomi koyoka banguna na ngai nyonso, oyo bamibongisa mpo na kosala ngai mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 92:12
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atobolaki na bamir oyo ezingelaki Tempelo, ezala na kati to na libanda, bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama.


Bayuda babebisaki banguna na bango nyonso na mopanga, babomaki bango mpe babebisaki bango ; basalaki bato oyo bazalaki koyina bango makambo nyonso oyo basepelaki kosala.


Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi, oyo ebotaka mbuma na eleko na yango, mpe makasa na yango ekawukaka te ; misala na ye nyonso etambolaka malamu.


Banzete ya Yawe etondi na mayi ; ndenge wana nde ezali, banzete ya sedele ya Libani, oyo Yawe alona.


ezala bangomba milayi to bangomba mikuse, ezala banzete oyo ebotaka bambuma to banzete ya sedele,


Zala na elikya kati na Yawe mpe batela nzela na Ye ; akonetola Yo mpo ete ozwa mboka lokola libula na yo, mpe okomona tango bato mabe bakolimwa.


Bato ya sembo bakomona mpe bakokoma na somo, bakotiola ye na maloba oyo :


Na tango na ye, moto ya sembo akokende liboso, mpe kimia ekofuluka kino sanza ekongenga lisusu te.


Moto ya kilikili ayebaka te, mpe zoba asosolaka eloko moko te.


Nzete ya sipele ekobota na esika ya banzube, nzete ya mirite ekobota na esika ya basende ; ekozala, mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, elembo ya libela na libela, oyo ekotikala kobebisama te. »


Bakotonga bandako te mpo ete bato mosusu bavanda kati na bandako yango, mpe bakolona bilanga te mpo ete bato mosusu balia bambuma na yango ; pamba te mikolo ya mbotama ya bato na Ngai ekozala lokola mikolo ya nzete, mpe baponami na Ngai bakosepela na bambuma ya misala ya maboko na bango.


Akozala lokola nzete oyo balona pembeni ya mayi, oyo epanzaka misisa na yango kino na mayi : ezalaka na somo ya moyi makasi te ; makasa na yango ezalaka kaka mibesu tango nyonso. Ezalaka na somo ya koya ya mobu ya bokawuki te mpe ebotaka mbuma tango nyonso. »


Nzokande, Ngai, nabebisaki bato ya Amori liboso na bango, atako bazali milayi lokola banzete ya sedele mpe makasi lokola banzete ya sheni. Nabebisaki bambuma na yango na likolo, mpe misisa na yango na se.


Bongo monguna na ngai akomona yango mpe akoyoka soni makasi, ye oyo azalaki koloba na ngai : « Wapi Yawe, Nzambe na yo ? » Miso na ngai ekomona ndenge akokweya mpe ndenge bakonyata ye lokola potopoto ya nzela.


Epanzana lokola miluka ya mike-mike, lokola bilanga oyo ezalaka pembeni ya ebale, lokola banzete ya aloe oyo Yawe alona, lokola banzete ya sedele pembeni ya mayi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ