11 Okomisi ngai makasi lokola mpakasa, opakoli ngai mafuta ya sika.
Motema na ye eninganaka te, abangaka te kino akomona banguna na ye kozwa etumbu.
Akabelaka babola na motema ya esengo ; bosembo na ye ewumelaka libela na libela, lokumu na ye ekitaka te.
Obongisaka mesa mpo na ngai na miso ya bayini na ngai, opakolaka moto na ngai mafuta mpe otondisaka kopo na ngai kino kosopana.
Zala na elikya kati na Yawe mpe batela nzela na Ye ; akonetola Yo mpo ete ozwa mboka lokola libula na yo, mpe okomona tango bato mabe bakolimwa.
Tika ete akweyisela bayini na ngai mabe ! Kati na boyengebene na Yo, bebisa bango.
Nzambe, ozali makasi na ngai, nakotalela Yo ; ozali ebombamelo na ngai,
Okotala kaka na miso na yo mpe okomona ndenge nini bato mabe bazali kozwa etumbu lokola lifuti na bango.