9 Soki otatoli : « Yawe azali ebombamelo na ngai, » mpe okomisi Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekimelo na yo,
Zala mpo na ngai ekimelo ya libanga epai wapi nakoki kokende tango nyonso. Ozwaki mokano ya kobikisa ngai, pamba te ozali libanga mpe ndako na ngai batonga makasi.
Nakozala na esengo mpe nakosepela kati na Yo, nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo.
Losambo ya Moyize, moto na Nzambe. Oh Nkolo, ozalaki ekimelo na biso, na bikeke nyonso.