4 Abombaka yo na se ya mapapu na Ye, mpe ozwaka ebombamelo ya malonga na se ya mapapu na Ye ; bolingo na Ye ebatelaka lokola nguba mpe lokola elamba ya ebende.
Nagumbamaka na kotala na ngambo ya Tempelo na Yo ya Bule mpe nasanzolaka Kombo na Yo mpo na bolingo mpe boyengebene na Yo, pamba te osalaki ete Kombo na Yo ekende sango na nzela ya kokokisama ya bilaka na Yo.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na nzembo « Koboma te. » Nzembo ya Davidi, tango Saulo azalaki kolanda ye, mpe tango Davidi abombamaki kati na libulu.
Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu na yango, kasi boboyaki !
Azali lokola mpongo oyo ezali kolakisa bana na yango kopumbwa. Epumbwaka pembeni-pembeni ya bana na yango, etandaka mapapu na yango mpo na kokanga bana na yango, mpe ememaka yango likolo ya masala na yango.