Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 91:3 - Mokanda na Bomoi

3 Ye nde akangolaka yo wuta na mitambo ya mokangi bandeke mpe na bokono oyo ebikisaka te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 91:3
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Yawe atindaki kati na Isalaele bokono oyo ebomaka, wuta na tongo kaka wana kino na ngonga oyo akataki ; mpe longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bato nkoto tuku sambo bakufaki.


Tango nzala makasi to bokono makasi to moto to bokawuki to kopola ya bambuma to mabanki to mankoko ekokota kati na mokili, tango banguna bakozingela bato na Yo kati na mokili na bango, na bikuke ya bingumba na bango ; tango pasi to bokono ya lolenge nyonso ekokweyela bango,


Tobikaki lokola ndeke liboso ya motambo ya mokangi bandeke ; motambo ekatanaki, mpe tokimaki.


Batela ngai mpo ete nakangama te na motambo na bango mpe nakweya te na mabulu ya bato ya misala mabe.


Mpo na biso, Nzambe yango azali Nzambe oyo abikisaka ; mpe bikuke ya kufa ezali ya Nkolo Yawe.


bokono oyo etambolaka kati na molili mpe pasi oyo ebebisaka na midi.


mikangola na motambo lokola mboloko na maboko ya mobomi banyama ya zamba, mpe lokola ndeke na motambo ya mokangi bandeke.


kino tango likonga ekotobola ye motema, lokola ndeke oyo ekeyi mbangu na motambo na kozanga koyeba ete ekeyi kokufa.


Moto moko te ayebi tango nini ngonga na ye ekokoka : ndenge mbisi ekangamaka na monyama to ndenge banyama ekangamaka na motambo, ndenge wana mpe bato bakangamaka na mitambo ya pasi oyo ekweyelaka bango na mbalakata.


Mokengeli ya Efrayimi azali elongo na Nzambe na ngai, azali mosakoli ; Nzokande bazali kotiela ye mitambo na banzela na ye nyonso mpe bazali kotelemela ye kino na Ndako ya Nzambe na ye.


Ndeke ekoki solo kokangama na motambo oyo ezali na mabele soki ezangi eloko ya kolia ? Motambo ekoki solo koningana soki ekangi eloko te ?


Bato oyo balingaka kokoma na bomengo bakweyaka kati na komekama mpe bakangamaka na mitambo ya baposa mingi ya bozoba mpe ya mabe, oyo ememaka bango na libebi mpe na kufa.


Bongo bakozongela mayele na bango ya malamu mpe bakolongwa na motambo ya Satana oyo akanga bango na boloko mpo ete basala kaka mokano na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ