16 Nakopesa ye bomoi molayi mpe nakolakisa ye lobiko na ngai.
Bongo Abrayami akataki motema mpe akufaki. Sima na ye kotonda mikolo mpe kokoma mobange makasi, akendeki kokutana na bakoko na ye.
Okokita na kunda na kimobange makasi, ndenge batelemisaka maboke ya matiti na tango na yango.
Okolakisa ngai nzela ya bomoi ; okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo, elongo na bilengi ya suka te na ngambo ya loboko na Yo ya mobali.
Oyei epai na ye na mapamboli ya motuya. Na moto na ye, olatisi ye motole ya wolo oyo basangisa na eloko mosusu.
Moto oyo abonzaka matondi lokola mbeka, apesaka ngai lokumu ; mpe moto oyo asalaka keba na etamboli na ye, nakotalisa ye lobiko ya Nzambe. »
Kotosa Yawe eyeisaka bomoi molayi, kasi bomoi ya bato mabe ekokoma mokuse.
Komikitisa mpe kotosa Yawe ememaka bozwi, lokumu mpe bomoi.
Kati na loboko na Ye ya mobali, ezali na bomoi ya molayi ; mpe kati na loboko na Ye ya mwasi, ezali na lokumu mpe bomengo.
pamba te ekoyeisa mikolo ya bomoi na yo milayi, ekobakisa mibu ebele na bomoi na yo mpe ekomemela yo kimia.
Kasi Yawe akobikisa Isalaele na lobiko ya seko na seko. Bokotikalaka lisusu koyoka soni te mpe kosambwa te, libela na libela.
Pamba te miso na ngai emoni Mobikisi oyo awuti epai na Yo,
mpe bato nyonso bakomona lobiko ya Nzambe. › »
mpo ete yo, bana na yo mpe bakitani na yo, botosa Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso oyo bokozala na bomoi na kobatelaka bikateli na Ye nyonso mpe mibeko oyo napesi bino mpo ete bozala na bomoi molayi.