Oh ndako ya Jakobi, boyoka Ngai, mpe bino nyonso, batikali ya libota ya Isalaele, bino oyo nandima kobatela wuta na libumu ya mama mpe nandima komema mokumba wuta mbotama na bino.
Tango nyonso bazalaki na pasi, Ye mpe azalaki koyoka pasi na motema ; boye, anjelu oyo atelemaka liboso na Ye abikisaki bango ; asikolaki bango na bolingo mpe na mawa na Ye, akongolaki bango mpe azalaki komema bango mikolo nyonso ya tango ya kala.
mpe alobaki na Ye : — Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se ; pamba te ekomama : « Akopesa mitindo na ba-anjelu na tina na yo, mpe bakomema yo na maboko na bango mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te. »