6 Na tongo, ebimisaka fololo mpe etelaka noki ; kasi na pokwa, enzulukaka mpe ekawuki.
Akolaka mpe akawukaka lokola fololo, awumelaka te lokola elili ya lipata oyo elekaka.
Mikolo ya bomoi na ngai ezali kokima lokola elili, mpe nakawuki lokola matiti.
Motema na ngai ebungisi elikya mpe ezali komitungisa lokola matiti oyo bakati ; mpo na yango, nakomi ata kobosana kolia bilei na ngai.
Moto ya kilikili ayebaka te, mpe zoba asosolaka eloko moko te.
Mongongo moko elobi : « Belela ! » Mpe nazongisaki : « Nabelela likambo nini ? » « Bato nyonso bazalaka lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezalaka lokola bafololo ya bilanga.
Soki Nzambe alatisaka ndenge wana matiti ya bilanga, oyo, na mokolo ya lelo, ezali na bomoi mpe, lobi, ekobwakama na moto, ekozala ndenge nini mpo na bino ? Akolatisa bino te na ndenge ya kitoko koleka ? Bato ya kondima moke !
Ndenge fololo ekawukaka, ekweyaka mpe ebungisaka kitoko na yango na tango ya moyi makasi, ndenge wana mpe mozwi akolimwa kati na misala na ye nyonso.