5 Olekisaka yango lokola pongi ya butu, oyo na tongo, esilaka lokola lititi.
Abungaka lokola ndoto, mpe bakomona ye lisusu te, alimwaka lokola na ndoto ya butu.
Kufa ememaki bango na mbalakata, mpe miboko na bango etiolaki na mpela.
Kobanda na tongo kino na pokwa, bakataka-kataka bango na biteni ; bakufaka mpo na libela, mpe moto ata moko te alandelaka likambo na bango ;
Ezali kokende penza mbangu koleka masuwa oyo esalema na papirisi, koleka mpongo oyo ezali kokitela bilei na yango.
Ndenge ndoto elimwaka soki moto alamuki na pongi, Nkolo, olimwisaka lisolo ya bomoi na bango tango kaka otelemaka.
Mikolo ya bomoi esili, elongwe na bomoi na ngai ndenge balongolaka ndako ya kapo ya mobateli bibwele. Akati bomoi ngai ndenge motongi bilamba akataka basinga soki asilisi kotonga elamba. Longwa na moyi kino na butu, akomisi bomoi na ngai na suka.
Nakangaki motema kino na tongo ; kasi lokola nkosi, abuki-buki mikuwa na ngai nyonso. Longwa na moyi kino na butu, akomisi bomoi na ngai na suka.
Mongongo moko elobi : « Belela ! » Mpe nazongisaki : « Nabelela likambo nini ? » « Bato nyonso bazalaka lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezalaka lokola bafololo ya bilanga.
Matiti ekawukaka mpe fololo elembaka, tango mopepe ya Yawe elekaka likolo na yango. Solo, bato bazali lokola matiti :
Pamba te ekomama : « Bato nyonso bazalaka lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezalaka lokola bafololo ya bilanga. Matiti ekawukaka mpe fololo na yango ekweyaka,