3 Ozongisaka moto na putulu, pamba te oloba : « Bino bato, bozonga na putulu ! »
Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yo kino okozonga na mabele epai wapi owutaki, pamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu. »
Bomoi ya bikelamu nyonso mpe pema ya bato nyonso ezali kati na loboko na Ye.
Tango obombaka elongi na Yo, somo ekangaka yango ; tango olongolaka yango pema, ekufaka mpe ezongaka na putulu ;
Soki bakufi, bazongaka na mabele, mpe, mbala moko, mabongisi na bango elimwaka.
liboso ete putulu ezonga na mabele epai wapi ewutaki, mpe pema ezonga epai ya Nzambe oyo apesaki yango.
Ngai Yawe nde nalobi ; mpe nakosala solo makambo oyo epai ya lisanga oyo mobimba ya batomboki oyo basanganaki mpo na kotelemela Ngai. Bakomona suka na bango kati na esobe oyo ; ezali awa nde bakokufa. »