Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 90:2 - Mokanda na Bomoi

2 Liboso ete bangomba ezala, liboso ete okela mabele mpe mokili, libela na libela, ozali Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 90:2
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na ebandeli, Nzambe akelaki Likolo mpe mokili.


Yo nde moto ya liboso oyo obotama kati na bato ? Omona moyi liboso ya bangomba mikuse ?


Tala ndenge nini Nzambe azali monene ! Tososolaka yango te. Moto moko te akoki kotanga motango ya mibu na Ye.


Kasi Yo Yawe, ozali Mokonzi mpo na libela, ozali Nzambe seko na seko.


Kasi bolingo ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Ye, mpe bosembo na Ye mpo na bakitani na bango,


Yawe akelaki Likolo mpe mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ; azali sembo seko na seko.


Pamba te alobaki, mpe likambo esalemaki ; mpe apesaki mitindo, mpe emonanaki.


Kiti ya Bokonzi na Yo epikama wuta kala ; seko na seko, ozali.


Faraon azongisaki : — Tika ete esalema lobi. Moyize alobaki : — Iyo, ekosalema ndenge osengi, mpo oyeba ete moko te azali lokola Yawe, Nzambe na biso.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi mpe Mosikoli ya Isalaele, Mokonzi ya mampinga, alobi : Nazali ebandeli mpe nazali suka ; Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te.


Bozonga epai na Ngai mpo ete bobika, bino nyonso oyo bozali na basuka ya mokili ; pamba te Ngai, nazali Nzambe, mpe mosusu azali te.


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Wana nazalaki kotala, namonaki bazali kotanda bakiti ya bokonzi, mpe Mpaka oyo azala liboso ya tango avandaki na moko kati na bakiti yango. Bilamba na Ye ezalaki pembe lokola mvula ya pembe, suki ya moto na Ye ezalaki pembe lokola bapwale ya meme, oyo basukola malamu. Kiti ya Bokonzi na Ye ezalaki lokola moto, mpe bapine na yango ezalaki lokola moto oyo ezali kongala.


Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.


Boni, ozali Yawe te wuta na ebandeli ? Ozali Nzambe na ngai, Mosantu na ngai, okufaka te. Oh Yawe, oponaki bango mpo na kosambisa biso ; mpe Yo Libanga na ngai, olendisaki bango mpo na kopesa biso etumbu.


Yesu-Klisto azali ndenge moko : lobi oyo ewuti koleka, lelo, mpe libela na libela.


« Nazali Alifa mpe Omega, » elobi Nkolo Nzambe, « Ye oyo azali, azalaki, mpe azali koya, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ