Oh Yawe, nayokaki sango ya Kombo na Yo ! Yawe, nabangaki misala na Yo. Sala yango lisusu na tango na biso ! Sala ete eyebana lisusu na tango na biso ! Kasi ata soki otomboki ndenge nini, kobosanaka te mawa na Yo mpo na biso.
Bongo, bana na bino oyo bolobaki ete bakomema bango na bowumbu, bana na bino oyo bayebi nanu te kokesenisa malamu mpe mabe, bango nde bakokota na mokili yango. Nakopesa bango mokili yango, mpe bakokamata yango.
Yawe azali lokola Libanga ; misala na Ye ezali ya kokoka, mpe banzela na Ye nyonso ezali sembo ; azali Nzambe ya boyengebene, asalaka mabe te ; azali sembo mpe alima.
Sik’oyo ngai nakomi pene ya kokende na nzela oyo moto nyonso akendaka. Na motema mpe elimo na bino mobimba, boyeba ete elaka moko te kati na bilaka nyonso ya kitoko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino ekotikala kokweya. Bilaka nyonso esila kokokisama, moko te ekotikala kokweya.