Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 90:12 - Mokanda na Bomoi

12 Lakisa biso kotanga malamu mikolo ya bomoi na biso mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 90:12
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo alobaki na moto : « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya ! Koboya mabe, yango nde mayele ! »


Motema na ngai eswaki, moto ezalaki kopela kati na ngai, mpe nalobaki na nzela ya monoko na ngai.


Yawe, yebisa ngai tango nini bomoi na ngai ekosuka mpe motango ya mikolo ya bomoi na ngai mpo ete nasosola ete bomoi na ngai ezali kaka mpo na mwa tango moke.


Bwanya ezali malamu koleka wolo, mpe kozwa mayele ezali na litomba koleka palata.


Pesa matoyi mpe yoka toli ya bato ya bwanya, mpe tika ete motema na yo endima mateya na ngai.


Tika ete motema na yo endimaka kotosa mibeko, mpe matoyi na yo eyokaka maloba ya boyebi !


Luka bosolo, kasi koteka yango te ; sala se bongo na bwanya, na mateya mpe na mayele.


zwa bwanya, zwa mayele, kobosana yango te, kopesa mokongo te na maloba ya monoko na ngai,


Tala ebandeli ya bwanya : Zwa bwanya, pesa biloko nyonso oyo ozali na yango mpo ete ozwa mayele.


Kokende na ndako ya matanga ezali malamu koleka kokende na ndako oyo ezali na feti, pamba te kufa ezali suka ya moto nyonso ; yango wana, bato nyonso oyo bazali na bomoi basengeli kokanisaka na tina na yango.


Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.


Lokola moyi ezali, esengeli na Ngai kosala misala ya Ye oyo atindaki Ngai ; butu ezali koya, oyo moto ata moko te akokoka kosala mosala.


Soki kaka bazalaki bato ya bwanya, balingaki kososola likambo oyo mpe koyeba ndenge nini suka na bango ekozala !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ