Bato ya masumu bazali kolenga kati na Siona, somo ekangi bato oyo bayebi Nzambe te : « Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo ezikisaka ? Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo epelaka tango nyonso ? »
Nani akoki solo kotelema liboso na Ye soki asiliki ? Nani akoki solo kobika soki kanda na Ye epeli ? Mpo ete kanda na Ye epanzanaka lokola moto, bongo mabanga ebukanaka liboso na Ye.
Nakolakisa bino nani oyo bosengeli kobanga : bobanga Ye oyo, sima na kufa, azali na bokonzi ya kobwaka kati na lifelo. Solo, nazali koloba na bino : Ye nde bosengeli kobanga.
Lokola toyebi makambo oyo ezali kati na kotosa Nkolo, yango wana tondimisaka bato mosusu, mpe Nzambe ayebi biso malamu. Nazali na elikya ete bino mpe boyebi yango kati na mitema na bino.