Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 9:20 - Mokanda na Bomoi

20 Yawe, telema ! Tika ete moto alonga te ; tika ete bapagano basamba liboso na Yo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 9:20
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Asa abelelaki Yawe, Nzambe na ye ; alobaki : « Oh Yawe, moko te akokani na Yo, moko te akoki kosunga moto ya bolembu liboso ya moto na nguya. Oh Yawe, Nzambe na biso, sunga biso ! Pamba te totiaka elikya na biso kati na Yo. Ezali na Kombo na Yo nde toyaki kobundisa mampinga oyo ya monene. Oh Yawe, ozali Nzambe na biso ! Tika ete moto alonga Yo te ! »


Yawe, telema ! Nzambe na ngai, kangola ngai ! Beta banguna na ngai nyonso bambata, buka bato mabe minu.


Botielaka Ye elikya tango nyonso, bosopaka mitema na bino liboso na Ye, pamba te Nzambe azali ebombamelo mpo na biso.


Epai ya Yawe, Nzambe na bino, bopesa bilaka mpe bokokisa yango. Tika ete bato nyonso oyo bazingeli Ye bamemela Nzambe ya somo makabo !


Kobanga mpe somo ekweyeli bango. Na nguya ya loboko na Yo, bakomi bababa lokola libanga kino bato na Yo, oh Yawe, balekaki, kino bato oyo osikolaki balekaki.


Nakotinda somo na Ngai liboso na bino mpe nakokotisa mobulu kati na bikolo nyonso oyo bokokota. Banguna na bino nyonso bakopesa bino mokongo mpe bakokima.


Bato ya Ejipito bazali kaka bato, kasi bazali Nzambe te, bampunda na bango ezali kaka mosuni, kasi ezali molimo te. Tango Yawe akosembola loboko na Ye, ye oyo asungaka akobeta libaku, mpe ye oyo bazali kosunga akokweya ; bongo, bango mibale bakobebisama.


Nakosala boyokani ya libela elongo na bango, nakotika te kosalela bango bolamu mpe nakosala ete batosa Ngai mpe bapesa Ngai lisusu mokongo te.


« Mwana na moto, loba na mokambi ya Tiri : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na lolendo ya motema na yo, olobaki : ‘ Nazali nzambe, navandaka na kiti ya bokonzi ya nzambe na kati-kati ya bibale minene. ’ Nzokande, ozali na yo kaka moto, ozali na yo nzambe te atako okanisi ete ozali na bwanya lokola nzambe.


Okokoka lisusu koloba liboso ya bato oyo bazali koboma yo : ‘ Ngai nazali nzambe ? ’ Ozali na yo kaka moto ; ozali nzambe te, kati na maboko ya bato oyo bazali koboma yo.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakobebisa banzambe ya bikeko mpe nakosala ete bato batika kosambela bililingi kati na Mefisi. Moto moko te lisusu akozala mokambi kati na Ejipito, mpe nakoyeisa somo kati na Ejipito mobimba.


Lelo, nakosala ete mabota nyonso ya mokili ezala na somo mpe kobanga liboso na bino. Bakoyoka sango ya makambo oyo bokosala, bongo bakolenga mpe bakozanga kimia likolo na bino. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ