Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 9:17 - Mokanda na Bomoi

17 Yawe amilakisi na nzela ya misala na Ye ya bosembo ; bato mabe bakangami na mitambo oyo bango moko basalaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 9:17
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

akangaka bato ya bwanya kati na mitambo ya mayele mabe na bango, mpe abebisaka mabongisi ya bakosi.


Ndenge wana nde ezalaka, bomoi ya bato nyonso oyo babosanaka Nzambe ; boye, elikya ya bato mabe ebebaka.


Kasi babosanaki noki misala na Ye, bazelaki te kokokisama ya mabongisi na Ye.


mpo na litio ya bato oyo bazali kofinga mpe kopamela ngai, mpe ya monguna oyo akangela ngai kanda.


Pamba te onyokolaki biso kati na etando ya bambwa ya zamba mpe ozipaki biso na molili makasi.


Yango nde suka ya bato oyo batiaka elikya kati na bango moko, ya bato oyo balandaka bango mpe basepelaka na maloba na bango.


Bino bato oyo bozali kobosana Nzambe, nabondeli bino : bososola makambo oyo ; noki te nakobebisa bino, mpe moto moko te akokangola bino.


Babenganaka moto mabe mpo na mabe na ye, kasi moto ya sembo awumelaka na elikya kino ata na kufa.


Moto mabe akokangama kaka na motambo ya mabe na ye moko mpe na singa ya lisumu na ye,


Mawa na moto mabe ! Pasi ezali likolo na ye, pamba te akozwa lifuti kolanda misala na ye.


Boye, mboka ya bakufi ekoyoka nzala makasi mpe ekofungola monoko na yango makasi ; bato ya lokumu elongo na bato pamba ya engumba bakokita kuna nzela moko mpe na loyenge na bango.


Yango nde etumbu na yo, mbano oyo nakatelaki yo, » elobi Yawe, « pamba te bobosanaki Ngai mpe botiaki mitema epai ya banzambe ya lokuta.


Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai, bazali kotumba malasi ya ansa mpo na banzambe ya bikeko oyo ezanga tina, oyo ebetisaka bango mabaku na nzela mpe epengwisaka bango na nzela ya kala, bongo ememaka bango na banzela mosusu oyo bafungola nanu te.


Boni, elenge mwasi abosanaka penza biloko na ye ya monzele ? Boni, mobandami ya libala abosanaka solo mayaka na ye ? Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai mikolo ebele.


Koganga ezali koyokana na likolo ya bangomba : ezali mayi ya miso mpe kolelalela ya bana ya Isalaele, pamba te babebisi nzela na bango mpe babosani Yawe, Nzambe na bango.


Omikomisaki mbindo na miso ya bikolo, kasi okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »


Nakosukisa bisengo na ye nyonso : bafeti na ye ya mobu na mobu mpe ya ebandeli ya sanza, mikolo na ye ya Saba mpe bafeti nyonso oyo ekatama.


Moto nyonso oyo kombo na ye ekomamaki te kati na buku ya bomoi abwakamaki kati na liziba ya moto.


Kasi bato oyo batepaka-tepaka na kondima na bango, bato oyo bazangi kondima, bato oyo basalaka makambo ya soni, babomi, bandumba, bato ya maji, basambeli bikeko, mpe bato nyonso ya lokuta, bakobwakama kati na liziba ya moto mpe ya sofolo : yango nde kufa ya mibale. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ