Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 9:16 - Mokanda na Bomoi

16 Bapagano bakweyi na libulu oyo batimolaki, makolo na bango ekangami na mitambo oyo bango moko basalaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 9:16
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso na maboko na ye mpo ete mikili nyonso ya mabele eyeba solo ete Yo moko kaka, Yawe, nde ozali Nzambe ! »


Motambo ekangaka matambe na ye, mpe singa na yango ekangaka ye makasi.


Tika ete akweyisela bato mabe makala ya moto, sofolo ya moto ! Mpe mopepe ya moto ekozala libula na bango.


Yawe, kokokisa te posa ya moto mabe, kolongisa te mabongisi na ye, noki te akokoma lolendo.


Batela lisusu mosali na Yo mpo ete nasala mabe na nko te. Na bongo, nakozala moto ya kokoka mpe nakosala bambeba minene te.


Nzambe, lokumu na Yo epanzani kino na suka ya mokili, ndenge moko na Kombo na Yo ; loboko na Yo ya mobali etondi na bosembo.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na flite.


atimolaka libulu, kasi ye moko nde akweyaka kati na yango.


Tala ndenge ezali malamu kosakola bolingo na Yo, na tongo, mpe boyengebene na Yo, na butu,


Lokola Faraon apusanaki, bana ya Isalaele batombolaki miso na bango mpe bamonaki ete bato ya Ejipito bazali kolanda bango na sima. Bana ya Isalaele babangaki makasi mpe bagangaki epai na Yawe.


Tango bana ya Isalaele bamonaki nguya monene oyo Yawe atalisaki liboso ya bato ya Ejipito, babangaki Yawe mpe batiaki elikya na bango kati na Ye mpe kati na mosali na Ye Moyize.


Nakokomisa motema ya Faraon libanga, mpe ye akolanda bango ; kasi nakomonisa nkembo na Ngai, nakotelemela Faraon mpe mampinga na ye ; bongo bato ya Ejipito bakoyeba ete Ngai nazali Yawe. » Bana ya Isalaele basalaki bongo.


Bato ya Ejipito bakoyeba ete nazali Yawe tango nakosembola loboko na Ngai kati na mokili na bango mpe nakobimisa bana ya Isalaele wuta na Ejipito. »


Moto ya misala mabe akangamaka na motambo ya maloba na ye ya lokuta, kasi moyengebene akobika kati na pasi.


omikangi nde singa na maloba na yo, omikangi nde na motambo ya maloba ya monoko na yo.


Bongo Liloba na Yawe ekokoma mpo na bango se bilobaloba ya pamba mpo ete, wana ezali bango kotambola, bakweya na ndenge ya sima, babukana mikongo, bazwama na mitambo mpe bakangama.


Mingi kati na bango bakobeta mabaku, bakokweya mpe bakobukana, bakokangama na motambo, mpe bakozwa bango. »


Mokonzi apesaki mitindo ete bamema bato oyo bafundaki Daniele mpe babwaka bango elongo na basi mpe bana na bango kati na libulu ya bankosi. Liboso ete bamikomela na se ya libulu, bankosi epumbwelaki bango mpe ebukaki bango mikuwa nyonso.


Adoni-Bezeki alobaki : « Bakonzi tuku sambo, oyo bakata bango misapi ya minene ya maboko mpe ya makolo, bazalaki kolokota biloko oyo ezalaki kokweya na se ya mesa na ngai. Sik’oyo, Nzambe azongiseli ngai makambo oyo nasalaki baninga. » Bamemaki ye na Yelusalemi, mpe akufaki kuna.


Na mokolo ya lelo, Yawe akokaba yo na maboko na ngai ; nakoboma yo mpe nakokata moto na yo. Na mokolo ya lelo kaka, nakopesa bibembe ya mampinga ya Filisitia epai ya bandeke ya likolo mpe epai ya banyama ya mokili ; mpe mokili mobimba ekoyeba ete ezali na Nzambe moko kati na Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ