15 mpo ete napanza sango ya lokumu na Yo kati na bikuke ya Siona, mboka kitoko, mpe nasepela na lobiko na Yo kuna.
Tika ete babonza bambeka ya kozongisa matondi mpe bapanza sango ya misala na Ye na koganga na esengo !
Kasi ngai, natie elikya na ngai kati na bolingo na Yo, mpe motema na ngai ezali kosepela kati na lobiko na Yo. Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, pamba te asaleli ngai bolamu.
Tokoganga na esengo mpo na lobiko na Yo mpe tokotombola bendele na Kombo ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe akokisa bisengeli na Yo nyonso.
tika ete libebi ekweyela bango na mbalakata, bakangama bango moko na mitambo oyo batielaki ngai mpe bakweya kati na mabulu yango !
Nakotonda na esengo kati na Yawe mpe nakosepela kati na lobiko na Ye.
Kasi mipanga na bango ekotobola mitema na bango moko, mpe batolotolo na bango ekobukana.
Oh Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola ; tika ete nkembo na Yo ezala awa na mokili mobimba !
Akozongisela bango mabe na bango mpe akobebisa bango mpo na kanza na bango. Solo, Yawe, Nzambe na ngai, akoboma bango.
Moto oyo alonaka masumu abukaka pasi, mpe makasi ya kanda na ye nyonso ekosuka.
Moto mabe akokangama kaka na motambo ya mabe na ye moko mpe na singa ya lisumu na ye,