Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 9:14 - Mokanda na Bomoi

14 Yawe, yokela ngai mawa, tala ndenge nini bayini na ngai bazali konyokola ngai, mpe kangola ngai wuta na bikuke ya kufa ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 9:14
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nani akoloba misala minene ya Yawe ? Nani akopanza sango ya lokumu na Ye nyonso ?


bongo monguna na ngai akoloba : « Nalongi ye, » mpe bayini na ngai bakosepela soki nakweyi.


Tika ete akokisa posa ya motema na yo mpe mabongisi na yo nyonso.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.


Bikisa ngai wuta na monoko ya nkosi mpe na maseke ya mpakasa.


Pamba te Yawe atiolaki te mpe abwakaki te mobola ; apesaka ye mokongo te mpe ayokaka ye tango asengaka lisungi.


Nakokumisa Yo kati na mayangani monene, nakosanzola Yo kati na ebele ya bato.


Nakotonda na esengo kati na Yawe mpe nakosepela kati na lobiko na Ye.


Butu mpe moyi, mpinzoli na ngai ezalaka bilei na ngai ; pamba te balobaka na ngai tango nyonso : « Nzambe na Yo azali wapi ? »


Oh Nzambe, mpo na ngai, kela motema ya peto ; mpe kati na ngai, yeisa molimo sika mpe elenda.


Nakoteya banzela na Yo epai ya babuki mibeko, mpe bato ya masumu bakozonga epai na Yo.


Yawe, yokela ngai mawa, pamba te nazangi makasi. Yawe, bikisa ngai na bokono, pamba te mikuwa na ngai elembi.


Loboko na Yawe esimbi kopo oyo etondi na vino ya makasi mpe ya bololo. Azali kosopa yango, mpe bato mabe nyonso ya mokili bazali komeka mpe komela yango kino na mbindo oyo etikalaka na se ya kopo.


Mpe biso, bato na Yo, etonga oyo oleisaka, tokosanzola Yo tango nyonso ; mpe na bikeke nyonso, tokosakola lokumu na Yo.


Yawe alobaki : — Namoni pasi ya bato na Ngai kuna na Ejipito ; nayoki koganga na bango mpo na misala makasi oyo bakonzi ya misala makasi bazali kopesa bango. Nayebi pasi na bango.


Sik’oyo, koganga ya bana ya Isalaele ekomi kino epai na Ngai mpe namoni ndenge nini bato ya Ejipito bazali konyokola bango.


Yango wana, botoka mayi na esengo na etima ya lobiko.


tala liloba oyo Yawe alobi mpo na kotelemela ye : Siona, mboka kitoko, ezali kotiola yo mpe koseka yo. Yelusalemi, mboka kitoko, ezali koningisa moto mpo na kotiola yo.


Tala makambo oyo Yawe atatoli kino na basuka ya mabele : « Boloba na Siona, mboka kitoko : ‹ Tala, Mobikisi na yo azali koya ! Tala, lifuti na ye ezali elongo na ye, mpe azali kotambola elongo na litomba na ye. › »


Oh Siona, mboka kitoko, telema mpe tuta ble, pamba te nakopesa yo maseke ya bibende mpe basapato ya bronze, bongo okobuka bikolo ebele mike-mike mpe okopesa bomengo na bango, oyo bazwaki na nzela ya mabe, lokola likabo epai na Yawe, mpe bozwi na bango epai na Mokonzi ya mokili mobimba.


Kasi ngai nakosepela kati na Yawe mpe nakotondisama na esengo mingi kati na Nzambe, Mobikisi na ngai.


mpe natondi na esengo mpo na Nzambe, Mobikisi na ngai,


Ana asambelaki na maloba oyo : Motema na ngai ezali kosepela mpo na Yawe mpo ete alendisi bomoi na ngai. Wana nazali na esengo mpo ete okangoli ngai, monoko na ngai ekotelemela banguna na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ