Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 9:13 - Mokanda na Bomoi

13 Pamba te Yawe azongisaka mabe na mabe mpo na makila oyo esopani, akanisaka koganga ya banyokolami.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 9:13
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe alobaki : — Osali nini ? Likambo nini penza osali ? Makila ya ndeko na yo ezali koganga wuta na mabele kino epai na Ngai.


Yawe atunaki Kayina : — Wapi ndeko na yo Abele ? Kayina azongisaki : — Nayebi te. Boni, ngai nazali mokengeli ya ndeko na ngai ?


Okoyebisa ye makambo oyo : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Boni, ozali mobomi te mpe oyibi te ? › Okobakisa lisusu : ‹ Tala makambo oyo Yawe alobi : Kaka na esika oyo bambwa elembolaki makila ya Naboti, kaka na esika yango mpe ekolembola makila na yo. › »


‹ Lobi, namonaki makila ya Naboti mpe ya bana na ye ya mibali, › elobi Yawe, mpe solo, nakofutisa yo yango na bilanga oyo, » elobi Yawe. Sik’oyo, kamata ye mpe bwaka ye na bilanga wana, kolanda Liloba na Yawe.


Mokonzi Joasi abosanaki bolamu nyonso oyo Yeoyada, tata ya Zakari, asalelaki ye, mpe abomaki Zakari, mwana mobali ya Yeoyada. Tango azalaki kokufa, Zakari alobaki : « Tika ete Yawe amona mpe akata likambo oyo ! »


Sik’oyo, Oh Nzambe na biso, Nzambe Monene, Nzambe na nguya mpe ya somo, Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo, komona te lokola likambo ya pamba na miso na Yo pasi oyo ekomeli biso, bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso, basakoli na biso, batata na biso mpe bato na Yo nyonso, wuta na tango ya bakonzi ya Asiri kino na mokolo ya lelo.


Oh Yawe, telema. Nzambe, sembola loboko na Yo, kanisa babola.


Minoko na bango eyinaki bilei nyonso, mpe bakomaki pene ya bikuke ya kufa.


Baluka epai na ngai mpe talisa ngai ngolu na Yo kolanda ndenge okata mpo na bato oyo balingaka Kombo na Yo.


Mona malamu pasi na ngai mpe kangola ngai, pamba te nabosanaka mibeko na Yo te.


Yawe alobi : « Mpo ete bazali konyokola babola mpe kolelisa bato oyo bakelela, natelemi sik’oyo mpo na kobikisa batiolami. »


Kino tango nini nakozala mawa-mawa kati na motema na ngai mpe nakomitungisa mikolo nyonso ? Kino tango nini monguna na ngai akolonga ngai ?


Yawe, nagangi epai na Yo ! Nalobi : « Ozali ebombamelo na ngai, libula na ngai kati na mokili ya bato ya bomoi ! »


Tala ndenge nini banguna na ngai bazali ebele, mpe ndenge nini bazali koyina ngai makasi !


Yawe, Nzambe na ngai, nabelelaki Yo mpo na kosenga lisungi, mpe obikisaki ngai na bokono.


Solo nandimi mabe na ngai, masumu na ngai ezali kotungisa molimo na ngai.


Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.


Epai na Yo Nzambe, nakokokisa bandayi na ngai mpe nakobonza bambeka ya matondi.


Pamba te bolingo na Yo mpo na ngai ezali monene, mpe okangolaki ngai wuta na mozindo ya mboka ya bakufi.


Nazalaki komilobela : « Tango nazali nanu na makasi na nzoto, naleka solo na nzela ya ekuke ya kufa mpe nazangela mibu oyo etikali na bomoi na ngai ? »


Bato na ye nyonso bazali kolela lokola bato bazali koluka bilei ; bapesaki bomengo na bango mpo na kozwa bilei, mpo ete bawumela na bomoi. Oh Yawe, tala mpe mona ndenge natiolami !


Mbindo na ye ekangami ye na elamba, ayebaki te makambo nini ekokomela ye na sima. Tala ye wana akweyi, bongo kokweya na ye ezali kokamwisa ; moto oyo akolendisa ye azali te ! « Oh Yawe, tala pasi na ngai, pamba te monguna alongi ngai ! »


Ezalaki wana na bambeki motoba ya mabanga, oyo Bayuda bazalaki kosalela mpo na komipetola. Mbeki moko na moko ekokaki kokota balitele kobanda tuku mwambe kino nkama moko na tuku mibale.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ