Bongo lokola makila na bino ezali bomoi na bino, nakosambisa oyo nyonso akotangisa yango, ezala nyama to moto. Nakosambisa moto nyonso mpo na bomoi ya moninga na ye.
bakisa makila oyo asopaki, makila ya bato oyo bayebi likambo te. Pamba te atondisaki Yelusalemi na makila ya bato oyo bayebaki likambo te ; mpe Yawe aboyaki kolimbisa ye.
Pamba te, Yo Nzambe, omoni pasi ya banyokolami ; otalaka pasi na bango mpe ozwaka yango kati na loboko na Yo. Banyokolami bamipesaka epai na Yo oyo osungaka bana bitike.
Yawe alobaki : — Namoni pasi ya bato na Ngai kuna na Ejipito ; nayoki koganga na bango mpo na misala makasi oyo bakonzi ya misala makasi bazali kopesa bango. Nayebi pasi na bango.
Tala, Yawe azali kobima wuta na esika na Ye mpo na kopesa bato ya mokili etumbu mpo na masumu na bango ; mabele ekobimisa makila oyo basopa likolo na yango, ekobomba lisusu te bato oyo baboma.
Ngai elongo na bana oyo Yawe apesi ngai, tozali bilembo mpe bandakisa kati na Isalaele, kowuta na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na ngomba Siona.
mpo ete makila ya bato nyonso ya sembo, oyo basopa na mabele, etangama na mito na bino, kobanda na makila ya Abele, moto ya sembo, kino na makila ya Zakari, mwana mobali ya Barashi, oyo bobomaki kati ya Tempelo mpe etumbelo.