azali Nzambe na ngai, libanga na ngai mpe ebombamelo na ngai ; azali nguba na ngai, nguya oyo ebikisaka ngai, ekimelo na ngai, mpe Mobikisi na ngai. Okangolaka ngai wuta na maboko ya bato mabe.
Bongo, yo Salomo, mwana na ngai, yeba Nzambe ya tata na yo mpe salela Ye na motema na yo mobimba mpe na esengo ; pamba te Yawe amonaka kino na bozindo ya mitema nyonso mpe asosolaka makanisi na yango nyonso. Soki oluki Ye, okomona Ye ; kasi soki atiki Ye, akobwaka yo mpo na libela.
Oh Nzambe, katela bango etumbu. Tika ete mabongisi na bango ebotela bango libebi. Bengana bango mpo na ebele ya masumu na bango, pamba te batombokeli nde Yo.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na nzembo « Koboma te. » Nzembo ya Davidi, tango Saulo azalaki kolanda ye, mpe tango Davidi abombamaki kati na libulu.
Ozalaki ekimelo mpo na mobola, ekimelo mpo na moto oyo akelela, na tango ya pasi, ebombamelo na tango ya mvula makasi mpe pio na tango ya molunge. Pamba te pema ya banyokoli ezali lokola mvula ya makasi oyo ebukaka bamir ;
Nalobaki na nkuku te, kati na esika moko te ya molili ya mokili ; nalobaki te na bakitani ya Jakobi : ‹ Boluka Ngai kati na pamba ! › Nazali Yawe, nalobaka oyo ezali sembo, nasakolaka oyo ezali alima.
Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.
Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi oyo. Kasi atako bongo, nazali koyoka soni te, pamba te nayebi nani oyo ngai nandimela, mpe nazali na elikya ete azali na makoki ya kobatela nyonso oyo apesa ngai, kino na mokolo wana.
Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.