9 Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, nani azali na nguya lokola Yo ? Nani, oh Yawe ? Boyengebene na Yo ezingeli Yo.
Nani akokani na Yawe, Nzambe na biso, oyo avandi na Kiti ya Bokonzi kati na bisika oyo eleki likolo ?
Yawe avandaki na Kiti ya Bokonzi na likolo ya mpela ; Yawe avandi na Kiti ya Bokonzi lokola Mokonzi mpo na libela.
Alendisaka bangomba, na nguya na Ye ; atondi na mpiko.
Bosembo ekozala mokaba na ye, mpe boyengebene ekozala na loketo na ye lokola mokaba oyo bamemelaka bibundeli.
Otalisaka bolingo na Yo epai ya bato kino na molongo ya nkoto, kasi opesaka etumbu mpo na masumu ya batata epai ya bana mpe bakitani na bango. Oh Nzambe monene mpe ya nguya, Kombo na Yo ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga ;
Agangelaka ebale monene mpe akawusaka yango, akawusaka bibale nyonso. Etuka ya Bashani mpe ya Karimeli esili nyonso kokawuka, mpe matiti nyonso ya Libani esili kokawuka.
Tango bamataki na bwato, mopepe ekitaki.
Yesu alamukaki, agangelaki mopepe, mpe apesaki mitindo na ebale : — Tika makelele ! Vanda nye ! Mopepe esilaki, mpe kimia monene ezongaki.
Somo monene ekotaki kati na bango mpe bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani mpo ete mopepe mpe ebale etosa ye ? »