Ezali bongo te mpo na libota na ngai liboso ya Nzambe, pamba te asalaki boyokani ya libela elongo na ngai, boyokani oyo esalema malamu na makambo nyonso, mpe oyo Ye moko abatelaka ? Tango nyonso mpe na makambo nyonso, apesaki ngai elonga mpe akokisaki posa ya motema na ngai.
« Wuta mokolo oyo nabimisaki bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito, naponaki engumba moko te kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo ete batonga kuna Tempelo epai wapi Kombo na Ngai ekozala ; kasi naponaki Davidi mpo ete akamba bato na Ngai, Isalaele ! »
Tala mosali na Ngai, oyo nasimbaka ; moponami na Ngai, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakotia Molimo na Ngai na likolo na ye, mpe akotia bosembo kati na bikolo,
Bopesa Ngai matoyi na bino mpe boya epai na Ngai, boyoka mpe bokozala na bomoi ; nakosala boyokani ya libela elongo na bino, boyokani oyo nalakaki Davidi, na boyengebene mpe na bolingo na Ngai.
Sima na yango, bana ya Isalaele bakozongela mpe bakoluka Yawe, Nzambe na bango, mpe Davidi, mokonzi na bango ; bakobelema epai na Yawe, na kolenga nyonso, mpo na kozwa mapamboli na Ye, na mikolo oyo ekolanda.
Kasi Yesu akomaki Nganga-Nzambe na nzela ya seleka, tango Nzambe alobaki na Ye : « Nkolo akati seleka, mpe akobongola mokano na Ye te : ‹ Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela. › »
Anjelu ya Yawe alongwaki na Giligali mpe akendeki na Bokimi. Alobaki : « Nabimisaki bino na Ejipito mpe nakotisaki bino na mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bino na nzela ya ndayi. Nalobaki : ‹ Nakotikala kokata boyokani te kati na Ngai mpe bino ;