Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 89:2 - Mokanda na Bomoi

2 Nakoyemba tango nyonso bolingo ya Yawe ; monoko na ngai ekosakola boyengebene na Yo libela na libela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 89:2
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nabondelaki : « Oh Yawe, Nzambe ya Likolo, Nzambe monene mpe Nzambe ya somo ! Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo epai ya bato oyo balingaka Yo mpe batosaka mibeko na Yo,


Baboyaki koyoka mpe kokanisa bikamwa oyo osalaki mpo na bolamu na bango. Bakomaki mito makasi mpe, na botomboki na bango, bamiponelaki mokonzi mpo na kozonga na bowumbu na bango. Kasi lokola ozali Nzambe oyo alimbisaka bato, Nzambe oyo atalisaka ngolu mpe ayokaka mawa ; lokola osilikaka noki te mpe otonda na boboto, otikalaki kosundola bango ata moke te,


Kasi na mawa monene na Yo, osilisaki bango te na koboma mpe osundolaki bango te ; pamba te ozali Nzambe otonda na mawa mpe na ngolu.


Kasi bolingo ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Ye, mpe bosembo na Ye mpo na bakitani na bango,


Yawe, liloba na Yo ezali mpo na seko, epikama kati na likolo ;


Yawe akelaki Likolo mpe mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ; azali sembo seko na seko.


Ezala na bambeto na bango, basalaka kaka mabongisi ya kosala mabe, batambolaka te mpo na kosala bolamu mpe baboyaka mabe te.


Nabombaka bosembo na Yo te kati na motema na ngai, natatolaka boyengebene mpe lobiko na Yo kati na mayangani, nakobomba yango ata moke te.


Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.


Libota na ye ya bokonzi ekowumela mpo na libela, mpe kiti na ye ya bokonzi ekowumela lokola moyi liboso na ngai.


‹ Nakokomisa yo libota ya bokonzi mpo na tango nyonso mpe nakolendisa kiti na yo ya bokonzi mpo na seko. › »


Nzambe azali moto te mpo ete akosa, azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye. Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ? Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ?


Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.


Atalisaka boboto na Ye tango nyonso epai ya bato oyo batosaka Ye.


Mpo na yango, mpo ete, biso bato oyo totika nyonso mpo na kosimba elikya ete tokozwa biloko oyo alakaki biso, tolendisama makasi, Nzambe asalelaki makambo mibale oyo ebongwanaka te, oyo kati na yango ekoki kosalema te ete Nzambe akosa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ