Banzembo 88:8 - Mokanda na Bomoi8 Kanda na Yo ya makasi ekweyeli ngai, bambonge na yango nyonso ezali konyokola ngai. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli mpe Mosantu ya Isalaele, alobi epai na ye oyo atiolami mpe amonani lokola eloko pamba na miso ya ekolo, na miso ya mowumbu ya bakonzi mabe : « Bakonzi bakomona yo mpe bakotelema, bakambi bakomona yo mpe bakogumbama, likolo na Yawe oyo azali Sembo, Mosantu ya Isalaele, oyo aponaki yo. »
« Nazalaki kaka ngai moko kati na ekamolelo mpo na kokamola vino, moko te kati na bato ya bikolo nyonso azalaki elongo na ngai. Nanyataki-nyataki bango na kanda na ngai mpe nakamolaki bango na kanda na ngai ya makasi ; makila na bango epumbwelaki ngai na bilamba mpe ebebisaki bilamba na ngai nyonso.