6 Nakomi moko kati na bakufi, lokola bato oyo basila kokufa na bitumba mpe bazali sik’oyo kati na kunda, lokola bato oyo okanisaka lisusu te, pamba te obatelaka bango lisusu te.
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo. Nkolo, nazali kobelela Yo wuta na mozindo ya pasi !
Monguna azali konyokola ngai, azali kosakana na bomoi, azali kosala ete navanda kati na molili lokola bato oyo bakufa na tango ya kala.
Natiaki elikya na ngai kati na Yawe ; abalukaki epai na ngai mpe ayokaki koganga na ngai.
Bimisa ngai na potopoto, sala ete nazinda lisusu te, nakangolama wuta na maboko ya bayini na ngai mpe nabima na mayi ya mozindo !
Pamba te bolingo na Yo mpo na ngai ezali monene, mpe okangolaki ngai wuta na mozindo ya mboka ya bakufi.
Nzela ya bato ya mobulu ezali lokola molili, bayebaka te eloko nini ekokweyisa bango.
Amemaki ngai mpe atambolisaki ngai kati na molili, kasi na pole te.
Nabelelaki Kombo na Yo, Yawe, wuta na mozindo ya libulu.
Obwakaki ngai kati na libulu ya molili makasi, kati na mozindo ya ebale monene epai wapi mayi ezingeli ngai mpe bambonge na yo nyonso ekweyeli ngai.
Ngai, pole, nayaki kati na mokili mpo ete moto nyonso oyo akondima Ngai azala lisusu te kati na molili.
Pamba te kanda na Ngai epeli makasi lokola moto, mpe ekozikisa kino se ya mokili ya bakufi, ekotumba mabele, bambuma na yango mpe miboko ya bangomba.
Babimisaka misala na bango ya soni ndenge ebale monene ebimisaka mbonge mpe fulufulu soki etomboki makasi ; bazali lokola minzoto oyo eyengaka-yengaka. Nzambe abombeli bango etumbu ya molili makasi mpo na libela.
Nzambe akangaki mpe na minyololo ya seko, kati na molili mpo na kosambisama ya mokolo monene, ba-anjelu oyo basepelaki te na evandelo oyo Nzambe apesaki bango mpe batikaki yango.