5 Batie ngai na molongo ya bato oyo bazali kokende na kunda ; nakeseni ata moke te na moto oyo azali lisusu na makasi te.
Boye, tango Nzambe abebisaki bingumba ya etando, akanisaki Abrayami mpe abikisaki Loti na likama oyo atindelaki bingumba epai wapi Loti azalaki kovanda.
Nzambe akanisaki Noa mpe banyama nyonso oyo ezalaki elongo na ye kati na masuwa, atindaki mopepe na mokili mpe mayi ekitaki.
Soki akotisi yo na boloko mpe asangisi basambisi mpo na kokata likambo, nani akotelemela Ye ?
Pema na ngai ekomi pene ya kosila, mikolo na ngai etikali ya kotanga, kunda ezali kozela ngai.
Tika ete Nzambe aboma na Ye ngai, asembola loboko na Ye mpo na kokata ngai moto !
Akanisaki biso tango basambwisaki biso ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
Nzembo ya Davidi. Yawe, nazali kobelela Yo ! Ozali Libanga na ngai, koboya te koyoka ngai. Soki te, nakozala lokola bato oyo bazali kokita na kunda.
Banguna na ngai nyonso bakomi kozwa ngai lokola eloko ya lisuma, baninga na ngai bakomi kozwa ngai lokola eloko ya soni, mpe bato oyo bayebi ngai bakomi kozwa ngai lokola eloko ya somo.
Tika ete Yawe akumisama, pamba te atalisaki ngai bolingo na Ye ya kokamwa, tango nazalaki kati na engumba oyo ezingelamaki na banguna !
Wuta bolenge na ngai, nazali mobola mpe moto na pasi ; mpe okweyiselaka ngai makambo na Yo ya somo ! Solo, elikya esili ngai !
Babomaki ye na nzela ya minyoko mpe ya etumbu ; kasi nani kati na bato ya tango na ye akokaki komitungisa na tina na ye ? Pamba te balongolaki ye na mokili ya bato ya bomoi, babetaki ye likolo ya masumu ya bato na Ngai.
Alobaki na ngai : — Mwana na moto, mikuwa oyo ezali libota mobimba ya Isalaele ! Bazali koloba : « Mikuwa na biso ekawuki, elikya na biso esili, bomoi na biso ebebi ! »