Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 88:4 - Mokanda na Bomoi

4 Pamba te bomoi na ngai etondi na pasi mpe nakomi pene ya kokufa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 88:4
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pema na ngai ekomi pene ya kosila, mikolo na ngai etikali ya kotanga, kunda ezali kozela ngai.


Yawe, zongisela ngai eyano noki ! Molimo na ngai ezali kolemba. Kopesa ngai mokongo te, noki te nakozala lokola bato oyo bazali kokita na libulu.


Nzembo ya Davidi. Yawe, nazali kobelela Yo ! Ozali Libanga na ngai, koboya te koyoka ngai. Soki te, nakozala lokola bato oyo bazali kokita na kunda.


Yawe, nabelelaki Yo ; nabelelaki Yawe mpo na kosenga lisungi :


Banguna na ngai nyonso bakomi kozwa ngai lokola eloko ya lisuma, baninga na ngai bakomi kozwa ngai lokola eloko ya soni, mpe bato oyo bayebi ngai bakomi kozwa ngai lokola eloko ya somo.


Bato batiolaki mpe basundolaki ye, ye moto na pasi, amesana konyokwama. Lokola moto oyo babwakeli soyi na elongi, atiolamaki, mpe tondimaki ye te.


Atondisaki ngai na matiti ya bololo mpe alangwisaki ngai na masanga ya bololo.


nakozindisa yo kati na libulu ya mozindo esika moko na bato oyo bakitaka kuna, epai ya bato ya kala ; nakovandisa yo kati na mokili oyo ezalaka na se ya mabele, lokola kati na libebi ya kala, mpe okozala elongo na bato oyo bakitaka kati na libulu ya mozindo, mpo ete okoma bisika oyo bato bakovanda lisusu te ; mpe okozonga te to okozwa lisusu bisika te na mabele ya bato ya bomoi.


Nazindi kino na kingo, mayi ya libulu ya molili makasi ezingeli ngai, matiti ya ebale ekangani-kangani zingazinga ya moto na ngai.


Solo, wana tozalaki nanu bato na bolembu, Klisto akufaki mpo na bato ya masumu, na tango oyo Nzambe abongisaki.


Solo, tomonaki kaka ete basili kokatela biso etumbu ya kufa. Nzokande, ezalaki mpo ete tolongola elikya na bomoto na biso, kasi tozala na elikya nde na Nzambe oyo asekwisaka bakufi.


Solo, atako babakaki Ye na ekulusu kati na bolembu, kasi azali na bomoi na nzela ya nguya ya Nzambe. Biso mpe ndenge moko : tozali na bolembu kati na Ye, kasi tokomilakisa bato ya bomoi elongo na Ye na nzela ya nguya ya Nzambe, na lolenge na biso ya kosala mpo na bolamu na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ