2 Yawe, ozali Nzambe ; Yo nde obikisaka ngai ! Butu mpe moyi, nagangaka epai na Yo !
Soki moto asali lisumu epai ya mozalani na ye, mpe batindi ye na makasi ete alapa ndayi esangana na bilakeli mabe, liboso ya etumbelo na Yo kati na Tempelo oyo,
Nalamukaka liboso ete tongo etana mpo na kobelela Yo, nazali na elikya kati na liloba na Yo.
Nzambe na ngai, na moyi, nabeleli Yo, kasi oyanoli ngai te ; na butu, nabeleli lisusu, mpe natikali kovanda nye te.
Eh Yawe, kati na Yo nde nazwa ebombamelo ; kondima te ete nayoka soni ! Bikisa ngai na bosembo na Yo !
Tika ete kolela ya bakangami kati na boloko ekoma liboso na Yo ! Na nguya monene na Yo, bikisa ba-oyo bazwa etumbu ya kufa !
Oh Nkolo, yokela ngai mawa ; pamba te nabelelaka Yo tango nyonso !
Ezala soki nabeleli mpo na kosenga lisungi, azali koyoka libondeli na ngai te.