12 Boni, bolingo na Yo etatolamaka kati na kunda, mpe bosembo na Yo, kati na mboka ya bakufi ?
Monguna azali konyokola ngai, azali kosakana na bomoi, azali kosala ete navanda kati na molili lokola bato oyo bakufa na tango ya kala.
Banguna na ngai nyonso bakomi kozwa ngai lokola eloko ya lisuma, baninga na ngai bakomi kozwa ngai lokola eloko ya soni, mpe bato oyo bayebi ngai bakomi kozwa ngai lokola eloko ya somo.
Batie ngai na molongo ya bato oyo bazali kokende na kunda ; nakeseni ata moke te na moto oyo azali lisusu na makasi te.
Pamba te ezala moto ya bwanya to zoba, bakotikala kokanisa bango tango molayi te ; mpe na mikolo ekoya, bato bakobosana bango mibale. Moto ya bwanya mpe akokufa lokola moto ya zoba.
Mpe lisusu, namonaki ete bazali kokunda bato mabe ; bongo bato oyo bazalaki kokende mpe kozonga na Esika ya bule bazalaki kokumisa bato mabe wana kati na engumba mpo na makambo oyo bazalaki kosala. Wana mpe ezali kaka pamba.
Pamba te bato ya bomoi bayebaka ete bakokufa ; kasi bato oyo bakufa bayebaka lisusu eloko moko te, bazalaka lisusu te na litomba ya kozwa, mpo ete babosana bango.
Mpe tango bakotala mabele, bakomona kaka pasi ya makasi, molili mpe molili ya somo makasi ; mpe bakotindika bango kati na molili ya makasi.
Kasi bato oyo basengelaki kokitana na bokonzi bakobwakama kati na molili ya libanda epai wapi bakolela mpe bakoswa minu.
Babimisaka misala na bango ya soni ndenge ebale monene ebimisaka mbonge mpe fulufulu soki etomboki makasi ; bazali lokola minzoto oyo eyengaka-yengaka. Nzambe abombeli bango etumbu ya molili makasi mpo na libela.