10 Miso na ngai ezali komona lisusu te mpo na pasi ; nzokande nabelelaka Yo, Yawe, mikolo nyonso, natombolaka maboko na ngai epai na Yo !
Ezali te bakufi nde bakumisaka Yawe, pamba te bango nyonso bakendaka na esika ya kimia.
Nakokufa te, nakozala na bomoi mpe nakopanza sango ya misala ya Yawe.
Nasemboli maboko na ngai epai na Yo ; nakomi komimona lokola mabele ya kokawuka.
Yawe, nabelelaki Yo ; nabelelaki Yawe mpo na kosenga lisungi :
Yawe, zongela ngai, mpe kokangola ngai, bikisa ngai, mpo na bolingo na Yo.
Oh Nkolo, yokela ngai mawa ; pamba te nabelelaka Yo tango nyonso !
Kasi bato na Yo, oyo bakufa bakozonga lisusu na bomoi, bibembe na bango ekosekwa. Bino bato oyo bovandaka kati na putulu, bolamuka mpe boganga na esengo ! Pamba te mamwe na Yo ezali lokola mamwe ya tongo ; mabele ekopesa bomoi epai ya bakufi.