Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 86:9 - Mokanda na Bomoi

9 Nkolo, bikolo nyonso oyo osala ekoya kogumbama liboso na Yo mpe ekoya kopesa Kombo na Yo nkembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 86:9
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo, mpe salela ye nyonso oyo akosenga Yo mpo ete bikolo nyonso ya mokili bayeba Kombo na Yo, batosa Yo lokola Isalaele, bato na Yo, mpe bayeba ete Tempelo oyo natongi ebulisami nde mpo na Kombo na Yo.


Pamba te biso basali na Yo, tosepelaka na mabanga na yango, mpe toyokelaka putulu na yango mawa.


Akoyanola libondeli ya bato oyo babungisaki biloko, mpe akondima mabondeli na bango.


Mokili mobimba efukamaka liboso na Yo ; bayembaka mpo na lokumu na Yo, basanzolaka Kombo na Yo. »


Mabele eboti bambuma na yango ; tika ete Nzambe, Nzambe na biso, apambola biso.


Tika ete Kombo na Ye ya nkembo epambolama libela na libela ! Tika ete mokili mobimba etonda na nkembo na Ye ! Amen ! Amen !


Tika ete akonza longwa na ebale moko ya monene kino na ebale mosusu ya monene, longwa na ebale Efrate kino na suka ya mokili.


Mabe to kobebisama ekosalema lisusu te na likolo nyonso ya ngomba na Ngai ya bule, pamba te mokili ekotonda na boyebi ya Yawe ndenge mayi etondaka na ebale.


moto nyonso oyo abengami na Kombo na Ngai, oyo nakelaki mpo na nkembo na Ngai, oyo nasalaki mpe nabongisaki. »


Longwa na ngambo ya weste, bato bakobanga Kombo ya Yawe ; mpe longwa na ngambo ya este, bato bakokumisa nkembo na Ye ; pamba te akoya lokola ebale oyo etomboki, oyo pema ya Yawe ekomema.


Bato ya mokili mobimba bakoya kofukama liboso na Ngai, longwa na feti moko ya ebandeli ya sanza kino na feti mosusu, longwa na Saba moko kino na mosusu, » elobi Yawe,


Boye nakopetola bibebu ya bato ya bikolo mpo ete bango nyonso bazala ya kokoka mpo na kobelela Kombo ya Yawe mpe kosalela Ye na motema mobimba.


Yawe akozala Mokonzi ya mabele mobimba. Na mokolo wana, Ye moko kaka nde akozala Nkolo, mpe bakosambela kaka Ye.


Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya : ndambo ya bana ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino Bapagano nyonso bakokota na libota ya Nzambe.


Ayaki mpe mpo ete Bapagano bapesa Nzambe nkembo mpo na mawa na Ye, kolanda ndenge ekomama : « Yango wana nakokumisa Yo kati na Bapagano, mpe nakoyemba nzembo mpo na lokumu ya Kombo na Yo. »


mpo ete tosanzola nkembo na Ye, biso ba-oyo tozalaki bato ya liboso mpo na kotia elikya na biso kati na Klisto.


Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.


Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »


Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo ? Pamba te Yo kaka nde ozali Bule. Bikolo nyonso ekoya mpe ekogumbama liboso na Yo, pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele.


Anjelu abwakaki ye kati na libulu wana ya monene mpe ya molili makasi ; akangaki yango mpe abetaki kashe na likolo na yango mpo ete akosa lisusu bikolo te kino tango mibu nkoto moko ekokoka. Sima na yango, bakotika ye mpo na mwa tango moke.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ