Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 86:8 - Mokanda na Bomoi

8 Nkolo, nzambe moko te ekokani na Yo, kati na banzambe ; moko te ekoki kosala makambo oyo Yo osalaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 86:8
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tempelo oyo nakotonga ekozala monene, pamba te Nzambe na biso azali monene koleka banzambe nyonso.


Solo, ngai nayebi malamu ete Yawe azali monene, ete Nkolo na biso aleki banzambe nyonso.


Ye kaka nde asalaka bikamwa ya minene ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Yawe, Lola esanzolaka misala na Yo ya kokamwa mpe bosembo na Yo kati na lisanga ya basantu.


Nani akokani na Yawe kuna na likolo ? Nani akokani na Yawe kati na mampinga ya likolo ?


Azali Nzambe ya somo kati na lisanga ya basantu ; solo, azali somo koleka ba-oyo nyonso bazingeli Ye.


Pamba te Yawe azali Nzambe Monene, azali Mokonzi Monene, na likolo ya banzambe nyonso.


Oh Yawe, nani kati na banzambe azali lokola Yo ? Nani azali lokola Yo, kitoko makasi kati na bosantu, somo, mpe abongi na lokumu, mpe asalaka makambo ya kokamwa ?


Faraon azongisaki : — Tika ete esalema lobi. Moyize alobaki : — Iyo, ekosalema ndenge osengi, mpo oyeba ete moko te azali lokola Yawe, Nzambe na biso.


Bolingi kokokanisa Nzambe na nani ? Bolingi kokokanisa Ye na elilingi nini ?


« Bolingi kokokanisa Ngai na nani ? Bolingi kotia Ngai esika moko na nani, » elobi Ye oyo azali Mosantu ?


Kasi Ye oyo azali libula ya Jakobi akokani na bikeko wana te, pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso, ezala ata Isalaele, ekolo oyo ezali libula na Ye ; Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Yango wana, nazwi mokano ete moto nyonso, azala ya mokili, ekolo to lokota nini, oyo akoloba mabe mpo na Nzambe ya Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, bakokata-kata ye na biteni, bakobuka ndako na ye mpe bakokomisa yango mopiku ya mbindo, pamba te Nzambe mosusu azali te, oyo akoki kobikisa bato na Ye na lolenge oyo !


— Oh Nkolo Yawe, obandaki kolakisa monene na Yo mpe nguya na Yo epai ya mosali na Yo. Pamba te nzambe nini na likolo mpe na se akoki kosala misala minene mpe makambo ya kokamwa lokola oyo Yo osali ?


Boni, ezali na nzambe oyo ameka kobimisa mpo na ye ekolo moko wuta na ekolo mosusu na nzela ya komekama, ya bilembo, ya bikamwa, ya bitumba, ya maboko na ye ya nguya, mpe na kosembola loboko to na nzela ya misala minene ya somo lokola makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asala mpo na bino kati na Ejipito na miso na bino ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ