Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 86:2 - Mokanda na Bomoi

2 Batela bomoi na ngai, pamba te nazali moyengebene na Yo. Yo, Nzambe na ngai, bikisa ngai, mosali na Yo, oyo natiaka elikya kati na Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 86:2
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bikisa ngai, pamba te nazali moto na Yo mpe natosaka mitindo na Yo !


bongo monguna na ngai akoloba : « Nalongi ye, » mpe bayini na ngai bakosepela soki nakweyi.


Na bolingo na Yo, kanga minoko ya banguna na ngai mpe limwisa bayini na ngai nyonso, pamba te nazali mosali na Yo.


Nzembo ya Davidi. Nzambe, batela ngai, pamba te nabombami kati na Yo.


Babundisaki ngai, na mokolo oyo pasi ezalaki kokanga ngai, kasi Yawe azalaki eyekamelo na ngai.


Nzambe na ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo ; sala ete nayoka soni te, mpe banguna na ngai basepela te na tina na ngai.


Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.


Nayokaka matongi na bango na tina na ngai tango basanganaka mpe basalaka makita mpo na koluka ndenge nini koboma ngai.


pamba te Yawe alingaka bosembo, mpe asundolaka te bayengebene na Ye. Babatelamaka mpo na seko, kasi bana ya bato mabe bakolimwa.


Bino bato, kino tango nini bokoyokisa nkembo na ngai soni ? Kino tango nini bokomisepelisa na makambo ya pamba mpe bokolanda makambo ya lokuta ?


Alobi : « Bosangisela ngai bayengebene na ngai, ba-oyo basalaki Boyokani elongo na ngai na nzela ya mbeka. »


Tika ete moto oyo alingi kosalela Ngai alanda Ngai ! Epai Ngai nakozala, mosali na Ngai mpe akozala wana. Tata na Ngai akokumisa moto oyo asalelaka Ngai.


Kala mingi te, nakozala lisusu te kati na mokili, pamba te nazali koya epai na Yo ; kasi bango, bakokoba kozala kati na mokili. Tata na Ngai, Yo oyo ozali Mosantu, batela bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai, mpo ete bazala moko ndenge Yo na Ngai tozali moko.


Boye Nzambe asalaka ngolu na moto oyo Ye asepeli kosalela ngolu, mpe ayeisaka motema libanga moto oyo Ye asepeli koyeisa motema libanga.


Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, kasi bato mabe bakobunga kati na molili. Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ