16 Balola elongi na Yo epai na ngai mpe yokela ngai mawa ; pesa ngai, mosali na Yo, makasi mpe bikisa ngai mwana ya mwasi mosali na Yo !
Yawe, yoka ngai, nazali mosali na Yo. Nazali mosali na Yo, mwana mobali ya mwasi mosali na Yo. Ofungoli minyololo oyo ekangaki ngai.
Baluka epai na ngai mpe talisa ngai ngolu na Yo kolanda ndenge okata mpo na bato oyo balingaka Kombo na Yo.
Bikisa ngai, pamba te nazali moto na Yo mpe natosaka mitindo na Yo !
Na mokolo oyo nabelelaki Yo, oyanolaki ngai, otondisaki ngai na mpiko mpe na makasi.
Yawe, balola miso na Yo epai na ngai mpe salela ngai ngolu, pamba te nazali kaka ngai moko, mpe nazali monyokolami.
Nalobaki : « Oh Yawe, yokela ngai mawa ; bikisa ngai na bokono, pamba te nasalaki masumu epai na Yo. »
Tika ete mbonge ya mayi emema ngai lisusu te, mozindo emela lisusu ngai te, mpe libulu ekangamela ngai te !
Esengo na bavandi ya Ndako na Yo ! Bakokumisa Yo tango nyonso !
Yawe, lembisa moke ! Kino tango nini ekowumela ? Yokela basali na Yo mawa !
Bakoloba na tina na Ngai : ‹ Makasi mpe bosembo ezali kati na Yawe kaka. › » Bato nyonso oyo batombokelaki Ye bakoya epai na Ye mpe bakoyoka soni.
Nakosala ete balendisama kati na Yawe : bakotambola na Kombo na Ye, » elobi Yawe.
Mari azongiselaki ye : — Nazali mwasi mowumbu ya Nkolo, tika ete maloba na yo ekokisamela ngai ! Bongo anjelu akabwanaki na ye.
mpo na kobondela ete alendisa bino na nguya, mpo na bolamu ya bomoto na bino ya kati, na nzela ya Molimo na Ye kolanda bomengo ya nkembo na Ye,
Mpo na kosukisa, bozalaka makasi kati na Nkolo mpe kati na nguya na Ye ya monene.
Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.
mpo ete bokoma bato na nguya kati na makambo nyonso kolanda makasi ya nkembo na Ye, mpo ete boyikela nyonso mpiko mpe bozala na molende mpe esengo kino na suka ;