Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 86:12 - Mokanda na Bomoi

12 Nkolo, Nzambe na ngai, nakosanzola Yo, na motema na ngai mobimba, nakopesa Kombo na Yo nkembo mpo na Yo libela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 86:12
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe na biso, tozali sik’oyo kosanzola Yo mpe kokumisa Kombo na Yo.


Davidi alobaki na bato nyonso : — Bopambola Yawe, Nzambe na bino ! Boye, bato nyonso bakumisaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, bagumbamaki mpe bafukamaki liboso ya Yawe mpe ya mokonzi.


Nakoyembela Yawe bomoi na ngai mobimba ; nakoyembela Nzambe na ngai tango nyonso nazali na bomoi.


Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango akosanaki liboma liboso ya Abimeleki oyo abenganaki ye, mpe akendeki.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.


Nakosanzola Yawe na motema na ngai mobimba, nakotatola misala minene na Yo nyonso.


Na mokolo wana, okoloba : « Oh Yawe, nazali kosanzola Yo, pamba te ata osilikelaki ngai, kanda na Yo elongwaki likolo na ngai mpe obondisaki ngai !


Wana bazalaki kokoba mobembo na bango, bakomaki na esika moko oyo ezalaki na mayi, mpe soda oyo baboma mokongo alobaki : — Tala mayi, yango oyo. Eloko nini ekoki kopekisa ngai kozwa libatisi ? [


mpo ete bopesa nkembo na Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na makanisi moko mpe na monoko moko.


Boye, ezala kolia to komela, nyonso oyo bokoki kozala kosala, bosalaka nyonso mpo na lokumu ya Nzambe.


Bosikolamaki na motuya makasi penza. Boye, bopesa Nzambe nkembo kati na banzoto na bino.


bolendisanaka na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu, mpe na nzela ya banzembo oyo ewutaka na Molimo ; boyembelaka mpe bosanzolaka Nkolo wuta na mozindo ya mitema na bino ;


Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ