Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 86:11 - Mokanda na Bomoi

11 Yawe, lakisa ngai nzela na Yo, mpe nakotambola kolanda bosolo na Yo. Pesa ngai motema ya sembo mpo ete natosa Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 86:11
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lakisa ngai makambo oyo nazali kokoka komona te ; soki nasali mabe, nakozongela yango lisusu te. ›


Naponaki nzela ya bosolo ; natambolaka kolanda mibeko na Yo.


Yawe, teya ngai nzela ya mitindo na Yo mpo ete nabatela yango kino na suka.


Osalaki mpe olendisaki ngai na maboko na Yo, pesa ngai mayele mpo ete nayekola mibeko na Yo !


Banani bazali bato oyo batosaka Yawe ? Alakisaka bango nzela ya kopona.


pamba te napengwaka te liboso ya bolingo na Yo mpe nabikaka bomoi na ngai kolanda bosembo na Yo.


Yawe, lakisa ngai nzela na Yo, tambolisa ngai na nzela ya alima, pamba te banguna na ngai bazali koluka ngai.


Kasi mpo ete bolingo na Yo eleki monene, nakoki kokota kati na Ndako na Yo, nakoki kofukama mpo na botosi epai ya Tempelo na Yo ya bule.


Mitema na bango etondi na mabe mpe basengeli sik’oyo kofuta masumu na bango. Ye moko Yawe akokaba bitumbelo na bango mpe akopanza mabanga na bango ya bule.


Bato bakozongela kovanda na se ya elilingi na ye, bakokola malamu lokola ble, bakobimisa fololo lokola elanga ya vino kitoko ya Libani.


bato nyonso oyo bafukamaka na likolo ya bandako mpo na kosambela mampinga ya likolo, bato nyonso oyo bagumbamaka na kolapa ndayi na Kombo na Yawe mpe na kombo na nzambe Moloki,


Monoko na ye ezalaki kobimisa malakisi ya solo ; lokuta etikalaki komonana na bibebu na ye te. Azalaki kotambola elongo na Ngai na kimia mpe na alima. Na nzela na ye, bato ebele batikaki kotambola na nzela ya masumu.


Mikolo nyonso bazalaki kokoba kosangana na Tempelo. Bazalaki kokabola lipa na bandako na bango, kolia bilei na bango na esengo nyonso mpe na motema ya komikitisa.


Bokoki te komela oyo ezali kati na kopo ya Nkolo mpe komela lisusu oyo ezali kati na kopo ya milimo mabe ; bokoki te kolia na mesa ya Nkolo mpe kolia lisusu na mesa ya milimo mabe.


Kasi moto oyo asangani na Nkolo azali moko na Ye kati na Molimo.


Nzokande, nazali kobanga ete makanisi na bino ebeba mpe epengwisa bino mosika na nzela ya solo mpe ya peto na miso ya Klisto, ndenge nyoka ekosaki Eva na mayele na yango ya mabe.


soki ya solo ezalaki penza Ye nde boyokaki tango bateyaki bino solo oyo ezali kati na Yesu


Mpe nyonso oyo bokosala, ezala na maloba to na misala, bosalaka yango na Kombo ya Nkolo Yesu, na kozongisa matondi epai ya Nzambe Tata na nzela ya Yesu-Klisto.


Nazalaki na esengo makasi ya komona ndambo ya bana na yo kotambola kati na solo, kolanda mobeko oyo tozwaki kowuta na Tata.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ