Banzembo 85:9 - Mokanda na Bomoi9 Yawe, nakoyoka maloba na Nzambe ; pamba te alobaka mpo na kimia ya bato na Ye mpe ya bayengebene na Ye. Kasi tika ete bazongela te botomboki na bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
nakozindisa yo kati na libulu ya mozindo esika moko na bato oyo bakitaka kuna, epai ya bato ya kala ; nakovandisa yo kati na mokili oyo ezalaka na se ya mabele, lokola kati na libebi ya kala, mpe okozala elongo na bato oyo bakitaka kati na libulu ya mozindo, mpo ete okoma bisika oyo bato bakovanda lisusu te ; mpe okozonga te to okozwa lisusu bisika te na mabele ya bato ya bomoi.