Banzembo 85:6 - Mokanda na Bomoi6 Boni, okosilikela biso penza mpo na libela ? Okokangela penza biso kanda mpo na tango nyonso ? အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.
ekoyokana kuna lokito ya banzembo ya esengo mpe ya masanzoli, mingongo ya mobandami na libala ya mwasi mpe ya mobali, mpe mingongo ya bato oyo bazali kobonza kati na Tempelo ya Yawe makabo ya kozongisa matondi, na koloba : ‘ Bozongisa matondi epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete Yawe azali malamu ; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! ’ Pamba te nakozongisa lisusu kitoko ya mokili yango ndenge ezalaki liboso, › elobi Yawe.