yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo ; yoka losambo mpe mabondeli na bango, longisa bosembo na bango mpe limbisa bato na Yo na masumu oyo basalaki liboso na Yo.
Nzokande Ye, na mawa na Ye, azalaki kolimbisa mabe na bango na esika ya kobebisa bango ; mbala mingi, azalaki kokanga motema na esika ya kopelisela bango kanda na Ye ;
Boloba kati na Yelusalemi, boyebisa ye ete minyoko na ye ekomi na suka, masumu na ye esili kolimbisama, pamba te asili kozwa na loboko ya Yawe ngolu koleka mbala mibale mpo na masumu na ye nyonso.
atutisaki likala yango na monoko na ngai mpe alobaki : « Tala, lokola likala oyo etuti bibebu na yo, mabe na yo esili kolongwa, masumu na yo esili kolimbisama. »
mpo ete okanisa yango lisusu, oyokela yango soni mpe ofungola lisusu monoko na yo te mpo na soni, tango nakolimbisa masumu na yo mpo na mabe nyonso oyo osalaki, elobi Nkolo Yawe. › »
Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye ! Bino ba-anjelu nyonso, bogumbamela Nzambe ; pamba te akozongisa mabe na mabe mpo na makila ya basali na Ye, akozongisa mabe na mabe epai ya banguna na Ye mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mokili na Ye mpe bato na Ye.