Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 85:13 - Mokanda na Bomoi

13 Ye moko Yawe akopesa esengo, mpe mabele na biso ekobota bambuma.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 85:13
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tambolisa ngai kati na nzela ya mibeko na Yo, pamba te nasepelaka na yango.


Loboko na Yo ezali na makasi, loboko na Yo ezali na nguya, loboko na Yo ya mobali oyo otombola.


Bongo, pole na yo ekongenga lokola moyi ya tongo, mpe nzoto na yo ekokoma kolongono na lombangu ; bosembo na yo ekotambola liboso na yo mpe nkembo na Yawe ekokengela yo na sima.


Nakoleisa malamu Banganga-Nzambe na mafuta ya bibwele, mpe bato na Ngai bakotonda na biloko na Ngai, › » elobi Yawe.


Nakosala ete banzete mpe milona ya bilanga ebota ebele, mpo ete boyoka lisusu soni te na miso ya bikolo likolo ya nzala.


nakonokisela bino mvula na tango na yango ; mabele mpe banzete ya zamba ekobota bambuma na yango.


Nazali kopesa bino mobeko ya sika : Bolinganaka bino na bino. Ndenge Ngai nalingi bino, bino mpe bosengeli kolinganaka bino na bino.


Mpe biso nyonso oyo bilongi na biso ezipama te, biso oyo tomonisaka nkembo ya Nkolo, tozwaka elilingi na Ye kati na nkembo oyo kongenga na yango ebakisamaka se kobakisama. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo oyo azali Molimo.


boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.


Lokola Klisto amonaki pasi kati na nzoto na Ye, bino mpe bosengeli kotambola na makanisi ya ndenge wana ; pamba te Ye oyo amonaki pasi kati na nzoto na Ye asilisaki nguya ya lisumu,


Moto nyonso oyo alobaka ete azali kati na Nzambe asengeli mpe kotambola ndenge Yesu atambolaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ