Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 84:3 - Mokanda na Bomoi

3 Nzoto na ngai mobimba ebukani pene nakufa mpo na posa makasi ya lopango ya Yawe ! Motema mpe nzoto na ngai ezali koganga epai ya Nzambe na bomoi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 84:3
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi alobaki na Tsadoki : — Zongisa Sanduku ya Nzambe kati na engumba. Soki nazwi ngolu na miso ya Yawe, akozongisa ngai mpe akopesa ngai nzela ya komona lisusu Sanduku yango mpe ndako na yango.


Molimo na ngai, zongela kimia na yo, pamba te Yawe asaleli yo bolamu.


Molimo na ngai ezali na posa ya Nzambe, ya Nzambe na bomoi. Tango nini nakoki kokende, mpe tango nini nakoki kokutana na Nzambe ?


bongo nakokende na etumbelo epai ya Nzambe, esengo mpe bomengo na ngai. Oh Yawe, Nzambe na ngai, nakosanzola Yo na lindanda.


Oh Yawe, yoka maloba na ngai, sosola tina ya kolelalela na ngai.


Losambo ya Moyize, moto na Nzambe. Oh Nkolo, ozalaki ekimelo na biso, na bikeke nyonso.


Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


« Yebisa libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakomi pene ya kosambwisa bosantu ya Esika na Ngai ya bule oyo esalaka lolendo na bino, oyo esepelisaka miso na bino mpe esalaka esengo ya mitema na bino. Bana na bino ya mibali mpe ya basi oyo botikaki na Yelusalemi bakokufa na mopanga.


Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu na yango, kasi boboyaki !


Kasi Yesu alobaki na ye : — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ