2 Yawe, Mokonzi ya mampinga, tala ndenge bisika oyo ovandaka ezali kopesa posa !
Soki nayebaki esika nini nakoki komona Nzambe, nalingaki kokoma liboso ya kiti ya bokonzi na Ye,
Molimo na ngai ezalaka tango nyonso na posa makasi ya koyeba mibeko na Yo.
Natondi na posa ya lobiko na Yo, nazali na elikya kati na liloba na Yo.
Nasemboli maboko na ngai epai na Yo ; nakomi komimona lokola mabele ya kokawuka.
Nzoto na ngai ekoki kobeba, mpe motema na ngai ekoki kolemba ; kasi Nzambe azali Libanga mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.
Oh bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino, soki bomoni mobali na ngai, bokoloba na ye nini ? Boloba na ye ete nabeli maladi ya bolingo.
Na butu, motema na ngai ezali solo na posa na Yo ; kati na ngai, molimo na ngai ezali kolukaluka Yo makasi, pamba te bavandi ya mokili bayekolaka bosembo tango opesaka mabele bitumbu.
Ndenge moto etumbaka matiti mpe etokisaka mayi na nzungu, kita mpo na kosala ete banguna na Yo bayeba Kombo na Yo mpe bikolo eningana liboso na Yo !
‹ Oh Jakobi, tala ndenge bandako na yo ya kapo ezali kitoko, mpe bisika oyo ovandaka, oh Isalaele !