Nzokande Amani asilaki koyoka ete Maridoshe azali Moyuda. Boye amonaki ete likanisi ya koboma kaka Maridoshe ekoki te ; alukaki nzela ya koboma Bayuda nyonso, bato ya Maridoshe, kati na mokili mobimba ya mokonzi Kizerisesi.
Boye, bapesaki sango na ndako ya Davidi : « Bato ya Siri basali boyokani elongo na bato ya Efrayimi. » Motema ya Akazi mpe mitema ya bato na ye nyonso eninganaki makasi ndenge kaka banzete ya zamba eninganaka na tango ya mopepe.
Bato ya Kanana mpe bato mosusu ya mokili bakoyoka sango yango, bakobalukela biso mpe bakolongola kombo na biso na mokili. Boye, okosala nini mpo na monene ya Kombo na Yo ?