Abombamaka lokola nkosi kati na evandelo na yango, abombamaka mpo na kokanga moto oyo azangi nguya ; akangaka moto oyo azangi nguya na kotindika ye pembeni ya motambo.
Pamba te, na tango ya pasi, akobatela ngai kati na evandelo na Ye, akobomba ngai kati ya Ndako na Ye ya bule mpe akotelemisa ngai na likolo ya libanga.
Boboto na Yo ezali penza monene, boboto oyo obombaka mpo na bato oyo batosaka Yo, boboto oyo otalisaka epai ya bato oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango, na miso ya bato nyonso.
Nzokande, na tango wana, batuli bibende bazalaki lisusu te kati na mokili mobimba ya Isalaele, pamba te bato ya Filisitia balobaki : « Ba-Ebre bakoki kosala te, ezala makonga to matolotolo. »